Les Amis de Wetchi
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le deal à ne pas rater :
Pokémon EV06 : où acheter le Bundle Lot 6 Boosters Mascarade ...
Voir le deal

G5 = motema mabe ?

Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty G5 = motema mabe ?

Message  fleti Lun 18 Aoû - 0:25

tango Fally azalaka epa Koffi ba voyage tout bazalaki komema ye, meme chose pona Bill Clinton.. werra azalaki komema ye ba voyage tout ! ekoma tour na bango, bakomi ko freiner ba petits, ko etouffer bango, il faut pas ba fulama !
bango moko ba leader ya mouv,Fally, Bill... bazo sala ba voyage pamba pamba, ba play back na mikili, ko recruter ba musiciens na mikili pona ko accompagner bango !
Fally aboyi kutu kopesa orchestre wana kombo, po azo banga bana wana ba fulama !

esprit nini wana ???

fleti
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  petit Lun 18 Aoû - 16:05

eza bien bongo.mosala na bango ko kima na poto.batikala na kinnnnnnn

petit
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  OBAMA LE Mar 19 Aoû - 1:08

Ezali motema mabe te... Ba vieux ya G4 babebisaki coop à cause des Ngulu. Maintenant le visa est difficile. Et puis bana poto bakomi ba criseurs bazali lisusu na bongo te. Bo suivre interview ya JB Mpiana. Alobi bana poto bokomi ko prier trop.

OBAMA LE
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  jeremiah Mer 20 Aoû - 3:07

tango jb mpiana azalaki kokemba na kin pendant 8 ans, ba visa ezalaki tjrs pasi. mais lelo awuti komema equipe mobimba na europe, canada....!! alors pona nini jb azo kende kobeta beta ba play back te na europe, apres atiki bana ngani na kin akende kaka ye moko ?
eza probleme ya volonte, c'est tout !!
fally, ferre, bill.... bazo bloquer ba petit na ki mutema mabe ! eza probleme ya visa te, sinon jb mpiana mutu aza mieux place pona kopesa excuse wana yaba visas !
motema mabe efutaka te : fally, ferre, bill...bokeba !

jeremiah
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  OBAMA LE Mer 20 Aoû - 12:19

EZALI MOTEMA MABE TE... EZALI PROBLEME YA TEMPS: BANA POTO BAKOMI BA MPIAKEUR, DEPUIS CREATION YA EUROS? COOP EZALI KOSIBA LISUSU TE? SOKI OMEMI BA PETITS BA KOKIMA, FERRE VIENT D'AMENER SES MUSICIENS EN EUROPE PENDANT SIX MOIS. MAIS, LE PRODUCTEUR AZALI KOLELA. ASALI MAMA YA PERTE. 2. Il N'YA PLUS DES PRODUCTEURS CONGOLAIS SERIEUX. ENSUITE, BANA POTO NE SONT PLUS PRETS A DEPENSER POUR LES MUSICIENS A CAUSE YA INGRATITUDE YA BA VIEUX YA G4. BANA YA G5 PAIENT LE PONT CASSE YA BA VIEUX YA G4. DONC FAUTE EZALI KAKA YA BA VIEUX YA G4.

OBAMA LE
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  MM ( MOT Sam 23 Aoû - 3:11

1-) ** bana poto bakomi ba mpiakeur** : soki ferre, bill..bakomi na mikili, direct bana poto bakomi ba mpiakeur, donc moyen bamema ba petit na mikili te ??? ebongo heure JB amemi orchestre mobimba na poto, eske mpiaka yaba mikiliste esilaki ?? esilaki nango te ! donc ferre na fally pe bakoki komema ba petit na mikili sans kobanga mpiaka yaba mikiliste, po eza kaka likambu ya volonte !
2-) ** ba petit bako kima** : eza likambu ya lelo te, po ba kester, jb, werra, koffi, wemba ba mema ba petit pe bakima... mais kokima wana ezo empecher jb, kester, werra...komemaka encore ba petit na mikili te !! la preuve, malgre kokima oyo ba petit ba mesana kokima, JB awuti lisusu komema orchestre mobimba na poto ! alors pona nini fally, na bill bazo sala meme chose te, soki penza eza ki mutema mabe te ??
3-) ** ba producteurs bazo lela** : kolela yaba producteur ebandi lello te. po ezalaka nango tjrs ! et malgre kolela wana yaba producteurs, JB MPIANA, Kester....bawuti lisusu komema na petit na mikili ! alors pona nini ferre, fally, bill, baby ndombe bakoki kosala yango te, soki eza ki mutema mabe te ?? eza kaka probleme ya volonte, puisque JB awuti komema orchestre mobimba na mikili malgre kolela yaba producteurs !

ba memi memi yo na poto mbala ebele,....ekoma tour nayo, ozo linga komema baninga na poto te : esprit nini wana ? Rolling Eyes

MM ( MOT
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  alors Sam 23 Aoû - 14:17

mais na zo comprendre bino te.fally asi amema ba musiciens na mikili mbala mibale.ba beta kutu olympia.ferre amema déjà ba musiciens mbala mibale.ba beta un peu partout awa na europe.ba cassettes pe ebima.concert ya suka ba betaki na bruxelles.mouvement au grand complet.ferre kutu asala exploit moko ya danzé.awuti na ba petits na mikili, ba kiti kin, ba leki angola et puis ba zongi lisusu mikili.alors mutema mabe na bango eza wapi? bo yebaka pe ko koma ba information ya solo.

alors
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  OBAMA LE Sam 23 Aoû - 15:48

Mon Cher Alors,
Azali na raison, na site na biso oyo ya Les Amis de Wetchi, bozo mona te concert ya Ferre au grand complet à Bruxelles. Ba vieux ya G4 na ba fan na bango kaka jalousie.

OBAMA LE
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  gnrt alb Sam 23 Aoû - 17:26

2 fois ya pamba !
kasi o boyi kotia combien de fois Fally, Bill Clinton...basala ba voyage bango moko kaka pona kobeta ba play back !
tia pe nombre de play back oyo ba Bill naba Fally babeta na mikili, au lieu ba mema kaka ba petit 2 fois ya pamba na mikili !!
nombre yaba play back oyo Bill Clinton abeta na mikili, moyen to compter yango eza te,po eleki ebele ! kasi combien de fois Bill Clinton amema orchestre mobimba na poto ?? combien de voyages au total Bill Clinton asali na mikili ( ye moko na ki egoisme naye )!
Fally abeti beti ba play back na canada, etats unis,....alors ke Koffi amema ye mbala ebele !
puiske Ferre na Fally nombre esuki kaka na 2 voyages ya pamba..sikoyo tozwa bill clinton, to jdt mulopwe, tangela nga combien de fois basala voyage na orchestre mobimba na mikili ?
tangela nga sikoyo nombre de voyage oyo basala bango moko na mikili specialement pona kobeta kaka ba play back, ou bien ko lokota lokota ba musicien sur place na mikili pona ko accompagner ye, pendant ke orchestre naye moko etikali na kin ba poche vide ! bana ngani ozo bloquer bango na kin, yo moko ozo sala ba voyages, ozo preferer okende ko recruter ba musicien misusu na mikili ! esprit nini wana ?? Rolling Eyes

gnrt alb
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  alors Sam 23 Aoû - 18:10

na ko repondre que pwa leader amema ba musiciens na poto il faut un producteur.opesi exemple ya Bill Cliton.oyebi que claude mussay, un producteur congolais, a prometaka ye voyage na poto na groupe mobimba, ti lelo eloko te.le petit asala effort na ye moko pwa aya na poto.fally na ferre soki ba yaka na poto mbala ebele c'est parceque ba za na mikanda ya poto.le grand problème eza ke ba concerts na poto ezo simba lisusu te.ba producteurs, non seulement ya serieux baza te, mais ba za lisusu te ko se retrouver te.tous les producteurs oyo ba za ko bengisa ba groupes na poto ba za kaka kolela na sima.donc, eza nango faute ya ba petits te.

alors
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  raison Sam 23 Aoû - 18:26

producteur ezalaka pasi kaka pona batu ya G5 ??
komema orchestre na mikili ekomi likambu yako zala na mokanda ?
Dakumuda, Karmapa...baza na mokanda ya poto, eske amemaka mivema na bango na mikili ??
tango Werra, JB....bazalaki komema ba Bill Clinton, JDT na mikili, eske Werra azalaki na mokanda ?? pona nini Bill Clinton po amema ba petit na mikili, ekomi likambu yako zala na mokanda ??
ebongo tango Bill abeti beti beti ba play back naba concert ya bilokota lokota na etats unis, eske aza na mokanda ya etats unis ?
oyo mutema mabe ya ndenge nini ??
tango Werra amema Bill clinton na Bercy, eske Werra azalaka na mokanda ya mikili ?? mais pkoi bozo linga ko reconnaitre ki mutema mabe ya bana G5 te ?? musala ko etouffer ba petit, ko bloquer evolution yaba petit, neti ba leader wana bazo banga un jour petit aleka ye ! donc il faut pas kofula te....il faut pas komema ye na poto !

raison
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  OBAMA LE Dim 24 Aoû - 23:49

Tokomi na tango ya changement. Ba petits ba ko rester na Kin. Fally ou Ferre ou Bill, voyagera tout seul, une fois arrivée en Europe, play black na play black, bazui bongo na bango moko au lieu de partager avec ces petits. En bref, Bazali na motema mabe te. Ils sont réalistes et capitalistes par rapports aux vieux de G4. Ba vieux ya G4, bango nde motema mabe, ils ne payaient pas les musiciens. Bongo nyonso bango moko kaka. Qui exploite qui entre G5 et G4? Amener ba petits en Europe sans le payer et venir tout seul pour jouer les play back?

OBAMA LE
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  BIBLIOTH Lun 25 Aoû - 1:46

Eza question ya motema mabe te , ezali plutot ba moyen ezali penza te et puis ba contrats pe nanu ekolite .
alien un jour viendra ba masolo ekokola kaka , et puis bana poto bakomi ekenge trop, generation ya sika bana ya
15 a 24 ans ou plus, bango nde bakomi ba publique ya lelo , bomuana ebele , irresponsabilite´ ebele , kasi banda na 30 ans ti likolo mingi bakoma na ba responsabilité , ba makambu wana ezali lisusus te , bakoma kokende plutot kobina ZAIKO po soki totali bien yango nde ezua place ya Tp ok jazz .
Mokili e changer oh oh . Twisted Evil

BIBLIOTH
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  gnrt alb Lun 25 Aoû - 8:46

1-) ** ezali plutot ba moyen ezali penza te et puis ba contrats pe nanu ekolite ** : ebongo JB azwi ba moyen wapi pona komema orchestre mobimba ?
kester azwi ba contrat pona komema orchestre mobimba, mais fally azo koka kozwa contrat te ?? musicien neti kester aleki fally na nini po ba producteur bapesa ye ba contrat oyo bakoki kopesa fally to ferre te ??
2-) ** Ba petits ba ko rester na Kin. Fally ou Ferre ou Bill, voyagera tout seul,** : ki mutema mabe oyo nazo lobela yango wana ! bazalaki komema yo na poto, mais yo oboyi komema baninga na poto ! eza mutema mabe, puisque ba meme producteur oyo bazo produire jb, kester....eza meme producteur oyo bazo produire ba bill, fally, ferre, sauf que ba Bill, ferre, fally baza na mutema mabe, bazo banga kofula ba petit !
meme kombo ya pamba pona kofula musicien ezo yebana te ! toyebaka kombo ya bill clinton depuis serie ya intervention rapide ( premier album na bango) ! mais bill akomi deja soki na 4 ie album, toyebi meme pas kombo yaba atalaku naye...toyebi meme pas kombo ya soliste naye....toyebi meme pas kombo ya drummer naye ! azo banga kofula ba petit !
motema mabe efutaka te, botala ndenge ba kangami na album moko ( ferre, fally ) !! bill clinton deja 5 albums sans impact ! jdt bimeka meka, baby ndombe mawa trop surtout ye a continuer kaka carriere yaba play back sur play back !
pona ki mutema mabe ya batu ya G 5, bilan du travail efundi ke G5 ezo koka makambu te !
bako koka te
bazo koka te
baza nase ya mabele, poussiere !

gnrt alb
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  Invite Lun 25 Aoû - 15:27

Ya solo ba petits ya G4 motema mabe. Bopesa ba noms ya danseuses ya Ferry ou Bill ou Fally?
Par exemple: Werra: Linda; JB Mpiana: bébé sucre; Mopao: Nono ba diamants, Zina, Shegue, Papa Wemba: Blanda, Fioti Fioti Zaiko LL: Floriana Makenda etc... Kasi bopesa ba noms ya danseuses ya G4? Motema mabe ....Motema mabe ....motema mabe

Invite
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  verite Lun 25 Aoû - 17:04

mwa liste yaba danseuses ya bill clinton + numero de telephone na bango

( shakira) ( kirikou -huguette )
( secretaire ya mouv. 4 coins ) ( drummer ) ( jus d'hiver )

leader ya 5 ie generation spoon macintosh bill clinton azo fulaaaaaaaaa azo tala te !
ba contact yaba musicien naba danseuses yango wana, bobosana western union te ! to soutenir bana wana

verite
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  Invite Lun 25 Aoû - 18:10

Wapi N° ya phone? Tu inventes des noms.... Wapi ba clips Bill azo fula ba petits? A part ça wapi oyo ya Ferre na Fally? Ma Chère VERITE ozo linga Nzambe te

Invite
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  verite Lun 25 Aoû - 19:12

ba video eza na youtube, mais tango nazo tia yango awa, liens ezo simba te !
kende na youtube, beta " bill clinton samourai kirikou " oko mona bango nionso !
ou bien obeti " bill clinton samourai shakira "
" bill clinton samourai 4 coins"
ou bien beta na youtube " bill clinton samourai luxembourg " ..... ba numero ya telephone ezali, donc preparer deja 10 chiffres ya western union pona ko soutenir bana wana !
soki olingi ozwa danseuses ya bill clinton, solola na 4 coins, ye mutu azo gerer bango tout, ba numero nabango tout ye mutu aza nango !!

youtube.com/watch?v=nXbBOxDB6N8

youtube.com/watch?v=nXbBOxDB6N8&feature=related

youtube.com/watch?v=c8hxhXRnJkQ&feature=related

ba danseuses ya fally na ferre eza domaine reserver yaba president ya mouv bango moko !

verite
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  INVITE Lun 25 Aoû - 19:27

To sengi na Les Amis de Wetchi d'établir un lien avec You tube. Oyo Site ya VERITE. Bandeko, botala kaka: pas de modérateur, pas d'enregistrement, pas de censure. Tu tapes ton message à la minute même bana mayi ba réagir. En tout, bon retour site ya vérite.

INVITE
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  verite Lun 25 Aoû - 19:39

soki ofini, eko simba te, sala copier coller oko mona ba images !
soki nameki otia ( 3 w ) neti " www " eko leka te. yango nabandi direct na youtube.com......!
yo moko bakisa ba 3 w avant youtube.
bill azo fula ka meme ba musicien ! mais fally, ferre, blocage ! ba danseuses bakoma affaire na bango moko !
meme ba werra naba koffi, bakoma kokanga ba danseuses, mutu apusana te !

verite
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  INVITE Mar 26 Aoû - 17:37

YA SOLO BILL MOTEMA MABE APONI BA DANSEUSES YA ELONGI KUUUUKUUU NDENGE NINI OKOFULA KIRIKOU? DANSEUSE SANS IMPACT. BILL MOTEMA MABE.

INVITE
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  KIRIKOU Mar 26 Aoû - 18:40

NABA MIVEMENT NIOSO BA DANSEUSES YA KITOKO NAYA BILONGI MABE EZALAKA.
TOZWI GISELLE YAMAMOTO, MACHOIR MUSCLER NETI YA SUPERMAN...TOZWI CUISSE DE POULET MUINDU AWA, NZOTO MAKASI NETI BA PORTEUR NA NGOBILA !
BILL CLINTON AZA NA GOUT , TALA CLIP YA BOPIKILIKI, OMONA BA DANSEUSE YA MUFUDE, YA PROPRE, SOIN, KITOKO , BOMPETO, PEMBE EZALI OPTION !
OKO COMPARER BA DANSEUSES YA WMM NA YABA SAMOURAI TE.
WERRA AYEBI KOPONA TE, TALA DEJA CHOIX YA MWASI ASALA ( SYLVIE MAMPATA) Mad Mad ....NASUKI WANA... Mad Mad

KIRIKOU
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  mbasu Mer 27 Aoû - 11:18

ba danseuses yango mingi ba bandaka kaka bilongi mabe.soki ba sukoli bango nde sima ba komaka bien.

mbasu
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  solo Mer 27 Aoû - 17:06

mbasu oza na raison ba danseuses babandaka tjrs na bilongi mabe, pona kosukola bango, banda deja naba western union pona kosukola kirikou !

solo
Invité


Revenir en haut Aller en bas

G5 = motema mabe ? Empty Re: G5 = motema mabe ?

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum
Ne ratez plus aucun deal !
Abonnez-vous pour recevoir par notification une sélection des meilleurs deals chaque jour.
IgnorerAutoriser