Les Amis de Wetchi
Vous souhaitez réagir à ce message ? Créez un compte en quelques clics ou connectez-vous pour continuer.
Le deal à ne pas rater :
Cdiscount : -30€ dès 300€ d’achat sur une sélection Apple
Voir le deal

album koffi

Page 1 sur 2 1, 2  Suivant

Aller en bas

album koffi Empty album koffi

Message  taty Mar 31 Mar - 14:41

soki nazali na conseil ya kopesa wazekua nakolobela ye boye: tant que akolinga kose comparer na koffi musicalement akobima bolole c'est vrai que album ya koffi ezali na ba betises trop mais etekami koleka les deux album oyo ye alandisi betement epuis atika koloba en public que ba musisiens na ye oyo bakenda epai ya koffi bazotinda batu epai na ye pona ko negocier retour na bango ezalaka te . ata kutu soki ezali ya solo ameka kozala discret coté wana la preuve eloko nini ba musiciens wana ba apporté epai ya koffi rien du tout probleme ya koffi ezalaki kaka a destabilisé ye na complicité ya traitre caffé etienne c'est tout . ngai nazali pret ya ko aidé wazekua na strategie soki alingi akomela nga ba cordonnée ya adresse email na ye akoyeba ebele atika nde kofinga wana azopesa koffi force . comme exemple nakopesa ye ezali oyo : montana tangu akendaki epai ya koffi amonaki que wana ezali paradis defao atikala koloba ata eloko te pona koffi ni meme pona montana mais lelo oyo montana azalaka koloba te soit disant akoma koloba adversaire na ye ekoma kaka koffi entre temps akoma kobeta ba aller retour na kenya epai ya defao pona a contribuer na preparation ya album na ye sik'oyo nani abimi yuma ezali koffi na montana alors mon frere motu ya bongo calme toi ok ni pour ni contre.

taty
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  ka oyo b Ven 3 Avr - 8:24

mon cher,oza zoba! avant que wazekwa atika kolobela koffi,il faut d'adord que koffi atika ko kretcher wazekwa. ..koffi na yo, c'est toujours lui le promoteur!ye nde kaka mutu abanda ka. Combien de fois koffi azo kretcher werrason? mais werra akipaka ye te...donc, aussi longtemps ke koffi parleras des autres, et bien!les autres parlerons aussi de lui...KUTU BA KO KRETCHER YE KOFFI NA NDENGE YA MUKE TE!

ka oyo b
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty KOFFI

Message  DIDI Sam 4 Avr - 23:28

Ce n'est pas une raison pona ofinga ndeko na yo zoba tokola mon frère.

DIDI
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty album koffi

Message  taty Mar 7 Avr - 12:30

alors mon frere ekomi lisusu ya kofinga nayebi te ngai na yo soki nani penza azali zoba . kaka yo moko olobi que koffi afingaka werra mais werra akipaka ye te omoni te que silence ya werra esalalaka impacte na charisme ya roi de la foret mais pourquoi yo olingi kaka wazekua alandaka koffi entre temps olobi lissusu que werra akipaka koffi te quel contradiction ? ALORS ngai nasali na ngai lokola werra nakofinga na ngai yo te malgre yo ofingi ngai napesi yo kaka leçon c.a.d yo na moment oyo okomi na yo koffi bifinga finga ngai werra silence toujours tokotala soki nani akobima zoba . bon courage mon frere ni pour ni contre ok !

taty
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  ka oyo b Mar 7 Avr - 19:37

pardon ya trop ndenge nafingi yo zoba.Pardon,yo ozali mutu ya mayele mingi. Kutu ba makambu ozo koma ezali ya batu ya mayele mingi. leçon de silence oyo opesi nga,elakisi vraiment que ozali na mayele mingi.Ah,mais nakamwe kaka yo mutu ya mayele olobi ke okokani na werra,po nga nayebi ke werrason azalaka zoba! grand zoba du monde entier!yo moko ozoyeba kaka ba gaffes ya werra:<il ya un chantal ici>,<Cultivons la haine>,<voiciiii ma main droite ouverte>,alors mayele na yo eza ndenge nini????????

ka oyo b
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty album koffi

Message  taty Mer 8 Avr - 1:52

alors mon frére namoni ozali ko confondre mayele ya intélligence na mayele ya stratégie ya musique alors nakorepondre yo boyé : soki na sens oyo yo okanisi ngai nalobi pona werra ezali pona stratégie na musique ezali ndenge yo o comprendre yango te alors na comprehension na yo napesi yo raison pona werra ok ! soki tokei na ndenge ya mayele ya classe ya pas photo wazekua aleki na koffi na werra ok ! kaka coté mayelé ya stratégie nde omeka kosunga ye pona tant que akobanda kolanda koffi na biloba loba na ye akozala déstabilisé musicalement werra acomprena yango yango wana rambo akokaka ye te koffi azua werra gitrois mikolo oyo azui ye danseuse omoni werra akipé ? ngai na place ya wazekua nako récupéré ba musiciens na ye oyo bakenda épai ya koffi soki ezali ya solo que bazali kotinda batu épai na ye pona ko sollicité retour na bango ? EKOPESA ye lisusu impacte ye azolinga akomisa ba musiciens oyo bakenda epai ya koffi ba adverssaires na ye ezali erreur oyo ezopesa koffi ngenge et surtout tangu azoloba que bazali kotinda batu pona bazonga nakanisi tour oyo okocomprendre ngai bien ok ? et puis namoni il faut ozala muana ya onu britanique pona ozali tétu olingi pe monstre d'amour trop ki fanatique na yo ezobosanisa yo ba gaffe na ye AH BAZA BANA CULTIVONS L'AMOUR ET NON LES INJURES NAYEBI QUE NGAI NA YO TOKOKOMA BA VRAI BA MASTA NI POUR NI CONTRE .

taty
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  ka oyo b Mer 8 Avr - 9:12

Mon frere na comprendre soucis na yo, alors: Ba mayele..Zua!, Ba strategie ya musique..Zua!, Ba conseils...Zua!, Ba ki fanatisme..Zua!, esprit ya discussion,Zua!...Kasi tikelanga kaka wazekwa!

ka oyo b
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty album koffi

Message  taty Mer 8 Avr - 23:49

alors masta kala oyo nioso pourquoi pas olobaki que olingaka na yo pe mopao suka na yango oyembi kk diabolos mrsi na biloko nioso opesi ngai nazui yango na esprit ya bien et surtout na félicité yo na fair play na yo à bientot.

taty
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  sisi Jeu 9 Avr - 6:29

entre koffi, nioka longo na wazekwa nani aleki moninga na chant ??
nani tokoki penza kobenga chanteur ??
po deja bouro mpela aloba clairement ke koffi aza chanteur te. ayembaka na zolo.
nioka longo pe ayembaka na zolo !!
bango mibale bazali ba tonton ZOLO ZOLO....baliaka lisangu na ZOLO !
sikoyo obakisi wazekwa : nani aleki moninga na nuance ??? Very Happy

sisi
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  MASOLA Jeu 9 Avr - 13:09

entre wazekwa,koffi na nioka longo mutu tokoki kobenga chanteur ezali adolphe dominguez,pck adolphe asalaka ba voix na bango trois.

MASOLA
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Jeu 9 Avr - 21:05

le probleme est simple wazekwa aza musicien te pe ako tikala kozala musicien te. to yebeliye na musique te. ye aza sportif, azonga na ring.
tiii pepe kale akenda, atikala jamais koyeba wazekwa etant ke musicien.
tiii madilu akenda atikala jamais kokanga ata nzembo moko ya wazekwa.

soki penza wazekwa aza musicien ya solo, abimisa ata nzembo moko , biso ba oyo toko kanga. ti lelo 8 ans azo bimisa bimisa ba nzembo sans impact, sans suite, azo bimisa neti azo bimisa te !!

merde a la fin !!!!!!!!!!!! Cool

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Dim 12 Avr - 20:27

tiii pepe kalle akenda atikala jamais koyeba Karmapa,dakumuda,bebe tshanda,rombo tunani,
tii madilu akenda atikala jamais kokanga nzembo ya maray maray,
donc po na wazekwa ezali faux debat,madilu ou pas wazekwa aza toujours mystique,pepe kalle ou pas wazekwa reste wazekwa.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Lun 13 Avr - 6:50

alino ozwa nga na likambu ?
tala, nako memela yo ngambo hein ???? oyebite ke nga naza maitre ? nabunda naba selemani... tuna bana matete bako yebisa yo.
kebaaaaaaaaaaa.....
tozonga na ndule.
monde mobimba ayebi ke wazekwa aza musicien te, ako tikala kozala musicien te.
ozwi adolph, aleki wazekwa na chant.
kutu bill clinton pe aleki wazekwa na chant.
wazekwa tokoma ko comparer ye na sandralina ba beaute ya danseuse.
est ce ke wazekwa ayebi nuance ????

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Lun 13 Avr - 11:13

cher likaku,ozokoma ba messages na yo na 4 heures du matin! masta oza tchor ou quoi Twisted Evil ? donc yo olala ka te? pendant que nous autres dormons, yo owuti koloka.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Mar 14 Avr - 5:36

alino oyebaka te??? naza tchor moindre erreur ozo leka.
oyoki ??
banga makambu !
to tobela ndule, tika songi songi !
wazekwa awuti kosala mpiaka na olympia 1500 personnes ! soki tobeti ba calcul X 35 euros =52500 euros.
location ya salle wazekwa afuti 50 milles euros, benefice ya 2500 euros bosala sikoyo partage na 25 musiciens, wazekwa asali perte ! wana totangi ba billet d'avion te, ba chambre d'hotel damage....
sikoyo napesi ba producteur raison c sert a rien de produire wazekwa po aza musicien te, okoya ko regreter likonda nayo.
ca fait 2 jours wazekwa akomi mawa mawa po likonda ekyi na mayi, olympia ekotisi lar te.
na banzi eza lesson pona ba aventurier misusu oyo bazo forcer ndule. Surprised

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Mar 14 Avr - 11:43

mon cher, dans la vie il faut savoir prendre des risques.oyebi proverbe :<celui qui ne tente rien n'a rien>Wazekwa c est un courageux! Bravo a lui! Mais pour revenir maintenant à ce concert proprement dit, d'abord yo okotaka concert te,musala na yo kaka kotuna tuna aux autres pourque obanda ko commenter.Je sais que OKOTAKI concert wana te. 35 euros c'est trop pour toi. Alors, yo mutu okotaki ndule te,qu'est-ce que tu peut rapporter de vrai? Si Wazekwa a fait 1500 personnes,mais il faut le feliciter,surtout na temps oyo ba combattants batelemeli ba ndulistes. Werrason avait fait combien de personnes au zenith?LIKAKU soki oyebi na yo ba affaires ya ndule te,TIKAAAAAAAAAA!orchestre moko te epesaka ba musicien lar na poto. le musicien congolais, tout orchestres confondus,se debrouille tout seul en europe.donc,wazekwa ne peut pas faire exception abanda kopesa ba musiciens likonda. les musiciens revent de l'Europe,ehbien! baluka.Wazekwa a fait du bon spetacle a l'olympia de paris, tout le monde a danser au rythme de mutu ya liboma aliaka na fulu. le spectacle etait au rendez-vous,et le public aussi...Tozela Mopao na zenith avec tout ce qu'il a comme probleme ici.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Mar 14 Avr - 19:55

yesus a bongola mayi na vin.
yango yo pe olingi o bongola mpiaka na plein?? en tt k, nako tikela yo jamais aventure ya boye, nako telemela yango ! mpiaka ezali mpiaka, pe eko tikala kaka mpiaka, ata ozo tia misu makasi Shocked Shocked
na concert wana, wazekwa a se retrouver te, asali perte ya munene, la preuve akomi mawa mawa.
na kutanaki na wazekwa lobi, mais mwana mer akomi mawa mawa Neutral Neutral Neutral Neutral Neutral Neutral po awuti kosala fausse affaire, tala kaka 50 milles euros nionso na mayi , sans compter ba billet yaba musiciens, ba demarches ya visa.
yango nazo pesa yo toli, Alino : lukaka makambu oyo oko koka. ca ne sert a rien ozwa risque ya makambu oyo oyebi ke oko koka nayo yango te.
wazekwa aza musicien te yaba boite de nuit naba fikin, ba concert ya biere + ba repetitions tongi moyi pokwa.
olympia esalema pona batu neti wazekwa te, po eza niveau naye te. tala ndenge awuti kosala mobange na mpiaka.
moninga azo lela likonda mais yo ozo ya kobetela ye maboko ?? eske olingaka penza wazekwa?
soki olingi wazekwa lobelaka ye verite : atika musique, azonga kosala ba karate to kung fu.

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Mar 14 Avr - 21:32

oza aventurier,grand aventurier,Ngadiadia ngadios.soucis na yo eza nini?es-ce que 50 millles euros yango ezali yayo?ba billets ya ba musiciens yo mutu obimisaki mbongo?na zo comprendre yote,otiaki ata un likuta te na makambu ya wazekwa,mais ndenge ozali kotelemela yango...non,non. c'est ne pas possible!....aaaaaaaaah! Laughing j'ai pigé.EUREKA.na comprendrrrrrre.il faut ozala mukongo ou muyaka,mutu ya bandundu.voila pourquoi ozoloba que:<lukaka makambu okokoka, ça ne sert a rien yakoluka makambu okokoka te...> pck bino bakongo bozalaka toujours bibanga banga.Vous les bayaka,BO BANGA YA LIBELA. En tout cas soki Congo n avance pas ezali po na bino bayaka,peuple trouillards,les peureux...Encore une fois bravo a wazekwa qui a oser.Dailleurs soki tosololi vrai na wazekwa,nakoki kobetisa ye na stade de france,il va oser la ou les autres n osent pas.Artiste na yo werrason asalaki wc na zenith,tu l as oublié ou tu fais semblant? mopao na yo koffi akimaki na bataclan,tu l as oublie?OKOTIKALA NA SONI PO NA WAZEKWA.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Mer 15 Avr - 1:10

alino pona nini ozalaka motema mabe boye ?
bazo lobela ba pasi oyo wazekwa aza nango na mikili likolo ya fausse affaire oyo awuti kosala, mwana batu akomi mawa mawa, telephone kutu azo koka lisusu koyamba ngo te po makasi e vider.yo Alino ozo lela te, po obungisi lar te, na butu owuti kolia badi + thomson, olandisi fanta, libumu evimbi, wana o fazer ba grand pongi.
mais wazekwa azo lala lisusu bien te, posa ya damage e vider po makanisi nionso obe na likonda oyo awuti ko bwaka na mayi. famille na kin bazo zela ye na mechant nionso.
yo Alino oza naba probleme nionso wana te, tika nde ko kumisa mutu oyo azo lela likonda na mayi na misu !
wazekwa asali fausse affaire likolo yako kumisa ya lokuta oyo bo kumisaka ye. soki penza olingaka wazekwa, il faut olobelaka ye verite : aza musicien te, pe ako tikala musicien te.
ti pepe kale akenda atikala jamais koyeba wazekwa comme musicien.
8 ans yango yo abetaka ndule, ata nzembo moko tokanga. madilu ti akenda atikala kokanga ata nzembo moko ya wazekwa !

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Jeu 16 Avr - 21:36

Likaku yango Wazekwa nde mutu ya liboso asala fausse affaire na mokili oyo? c'est pourquoi naza koloba oyebi makambu ya music te...saches que ba musiciens nionso ,un moment ou un autre dans leur carriere,basala pe mpiaka..Wazekwa nde mutu abanda masolo ya ba mpiaka te...si wazekwa azali musicien te,alors po na yo musicien ezali nani? c est quoi etre musicien pour toi?olobi ke ata nzembo moko ya wazekwa eyebani te,alors yo yembela nga nzembo ata moko ya elvis presley?kutu elvis presley tokeyi mosika,yembela nga nzembo ata moko ya Ray Lema. Likaku tika kokoma biloko ya soni, ko! tika,pardon. ozoyokisa bayaka soni.Tu parles de Madilu,oyebi meme pas que Wazekwa ayemba deja na Madilu na album tetragrame,DONC Madilu tiii akenda atikala koyeba kaka nzembo oyo wana ayemba na Wazekwa.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Ven 17 Avr - 19:12

pona nini soki wazekwa asali mubange na mpiaka, il fat tobanda kolobela ba mpiaka oyo ba musicien misusu basala na 1995 to 2001 ???
evenement du moment ezali mpiaka oyo wazekwa awuti kosala na olympia. alors soki olingi kolobela ba mpiaka oyo musique congolaise esala naba annee 90' wana bwaka sujet mosusu, po nayobi ba melange ya pamb' pamb'

pona nini ozo linga kokomisa wazekwa musicien ?? ozo sala semblant ?? to oza serieux ?? soki ozo benga wazekwa musicien , c'est mieux totika discussion oyo pcq on dirait okomi kosala ba blague , et nga naza awa pona ba blague te !!

wazekwa aza musicien te, et puis ezala mbala suka olobi ke wazekwa aza musicien !! oyoki ?? natuni eske oyoki ? nazo loba na yo Alino, tika kotala de gauche droite, eske oyoki nga bien ??
zela na bandela ( tango mosusu oyoki bien te ) !!
nalobi hein,....yo Alino, ezala mbala suka olobi ke wazekwa aza musicien !! vraiment mbala suka !!

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Ven 17 Avr - 22:30

finalement ozo confondre< kosala mpiaka> na <kozala musicien>.Donc po na yo si quelqu'un asali plein na concert automatiquement azali musicien? si quelqu'un asali mpiaka automatiquement azali musicien te? Likaku,likaku,likaku,likaku, oza na ba boules ya paleolithique,donc ba boules ya ba 1800 av.jc...parceque ozo confondre" muscien " na "succès". Na ba boule na yo, Wazekwa ne serait pas musicien pck concert batu bayaki te...likaku,likaku,likaku,oyebi ke ozolembisa nga kokoma...olingi raison alors que oza ya kobunga. Ecoute,soki oyeba ka te,Wazekwa azali chanteur,parolier,auteur compositeur,danseur, createur de danses,producteur,manager,marketer,,distributeur,...mais,Wazekwa aza finale.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Sam 18 Avr - 18:31

Alino tangela nga tube moko ( mibale te, mais moko kaka ) ya Wazekwa oyo etikala na memoire ya batu !
soki penza wazekwa aza musicien comment 8 ans mobimba ata nzembo moko biso ba oyo tokanga eza te.
ti pepe kale akenda atikala koyeba wazekwa etant ke musicien te.
ti madilu akenda, atikala kokanga ata nzembo moko te.
ba franco bayemba " heleni...mario..." ba madilu bayemba ba frere edward oyo tokanga...ba koffi bayemba ba " coucou....ba aliyah..." , ba jb bayemba ba " omba...ba sans te toucher " , ba kester bayemba ba " nzinzi...." ba wemba bayemba ba " proclamation...emotion...foridole ...." ba karmapa bayemba ba " bileyi ya mibali " ....ba werra son bayemba ba " chantal, ba blandine " ...ba adolph bayemba ba " voyage " ... ba bogus bayemba ba " doleances " ....liste eza molayi, sikoyo tangela nzembo moko ya wazekwa oyo etikala na memoire ya batu ???
comment yo musicien mobimba mais nzembo ata moko toyebi te ...peuple ayebi te !!

resultat, batu baboyi kokota concert naye = mpiaka ya kafumba !
wazekwa tika musique oza musicien te, toyebeli yo ata nzembo moko te, ba producteur balingaka na bango yo te, po bayebi ke oza rentable te ! tala ndenge owuti ko rouler a perte na Olympia likolo ya mutu makasi oyo ozalaka nango ! Adolph kutu aleki yo nako yemba !!
sikoyo Alino yebisa nga entre Sandralina ba beaute, na Wazekwa nani aleki moninga na koyemba ?? ? Rolling Eyes

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  alino Sam 18 Avr - 23:09

likaku tika na yo,deja nasi na gagner yo..oza lisusu na ba arguments te okomi ko repeter repeter ba makambu oloba..match esili. Osi opoli, ozali vrai bipola. donc,wazekwa azali vrai nduliste ya Congo 2fois te. Alors po na nzembo moko ya Wazekwa nakotangela yo :<Complexe.> en tout cas,soki oboyi yango,veut dire oza kaka tchior!Nga vraiment na defendre Wazekwa na ndenge ya muke te, meme batu oyo bazotanga biso ma comprendre que tu n'as plus d'argurments,okomi papa repetition..donc,natié yo deja contre mur .Et puis pas n'importe quel mur,ezali mur oyo ya makwanza...mon cher,nanguluti yo...na esprit ya bien,avant olala, o mitala nanu na nzoto na yo soki ozoki ba pota ya degres nini? ...Tika to debattre kaka na ba sujet misusu pck sur sujet oyo,nalié yo 3 points.

alino
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  likaku Dim 19 Avr - 6:19

alino, okotaka awa pona ba victoire virtuel ?? na kamwe.
ndenge otangeli nga " complexe " sikoyo na ndimi penza ke oyebi meme pas ndule, oza aventurier musical ndenge moko na wazekwa.
po nzembo wana nga nayebi yango te, jamais nayoka yango naba fete, naba nganda, ata nakei visite epa mutu nzembo wana ebetaka te.
wazekwa aza musicien te, puisque ba producteur bazo boya ko produire ba album naye, bazo boya ko produire ba concert naye.
yebisa wazekwa apesa merci na primus po ye aza kaka musicien yaba concert ya biere + ba repetition !
Olympia producteur oyo akozwa risque yako produire aventurier wana aza te, yango ye moko akotisi liboko na poche po a se produire.
eza kaka neti lelo Didi Kinuani pe akoki pe kolamuka, amoni 50 milles euros disponible na poche, ye pe mbangu concert na olympia.
ou bien Mutubile Santos akoki pe kokanga 50 milles euros apres a s'improviser pe musicien na Olympia !

mais Alino banda natuni yo, oyebisa nga entre Wazekwa na Sandralina ba beaute, nani aleki moninga na chant ?? Very Happy

likaku
Invité


Revenir en haut Aller en bas

album koffi Empty Re: album koffi

Message  Contenu sponsorisé


Contenu sponsorisé


Revenir en haut Aller en bas

Page 1 sur 2 1, 2  Suivant

Revenir en haut

- Sujets similaires

 
Permission de ce forum:
Vous ne pouvez pas répondre aux sujets dans ce forum
Ne ratez plus aucun deal !
Abonnez-vous pour recevoir par notification une sélection des meilleurs deals chaque jour.
IgnorerAutoriser